Bisó tozali banani?
Misala ya Tekonoloji ya Pro (Services Technologiques Professionnels)
IMAR WORLD LTD epesaka misala ya mobimba na makambo ya tekonoloji lokola: kura (électricité), ba masini ya miké (électronique) mpe ordinatɛrɛ (informatique). Kompanyi esalaka mingi na kotiya (installation), kobatela (maintenance), kobongisa (réparation) mpe kopesa lisungi ya tekiniki na lolenge ya malamu, na nidhamu mpe na kopesa mosala na ntango ekoki.
Mikano na biso
Mposa na biso ezali kopesa litatoli ya kotalela na makambo nionso oyo toyebi kosala. Tozalí kosalela ba tekonoloji ya sika mpo na kobongisa seko mosala na biso mpe kosala ete bakiliya na biso bazala na esengo ntango nionso.
Kobatela mabelé (Environnement)
Tozalí mpe kopesa lisungi mpo na kobatela mabelé na biso na koponaka bamasini mpe bapesi-biloko (fournisseurs) oyo batosaka mibeko ya kobatela ndako na biso ya mokili.
Ndenge tosala mosala (Notre Engagement)
Tozalí kopesa misala ya kitoko kozanga kobebisa ntango oyo toyokanaki, bajeti to mpe makasi ya ba masini na bino. Mokano na biso ezali kobatela bakiliya na biso na bokengi mpe kosala ete misala na bino ekatama soki moke té.
Misala oyo toyebi kosala (Portfolio)
IMAR WORLD epesaka mayele mpo na bokengi, kobatela bandako mpe esengo ya kiliya:
Alarme Incendie :
Kosala plan, kopesa biloko, kotiya mpe kobatela ba masini ya kokebisa soki mɔ́tɔ epeli.
Kobunda na mɔ́tɔ :
Ba bamasini ya koboma mɔ́tɔ (extincteurs) mpe lisungi ya bokengi.
Ba Kamera ya Bokengi (CCTV) :
Kotiya ba kamera, kobongisa ba ndako ya kotala bokengi (salle de contrôle) mpe kobongisa yango soki ebebi.
ntango ya mosala (Pointage) :
Ba masini mpo na koyeba soki basali bayei na mosala mpe kopesa ba rapɔrɔ.
Koluka bibende (Détection des Métaux) :
Ba masini ya mabɔkɔ to ya bikuke mpo na koluka soki moto amemi eloko ya mabe (moundoki, kiti kiti…).
Kobunda na mɔ́tɔ
Ba bamasini ya koboma mɔ́tɔ (extincteurs), lisungi mpo na bokengi na makambo ya mɔ́tɔ mpe misala ya kobatela (maintenance) bamasini yango.
Kolanda mituka (Car Tracking) :
Mayele ya kolanda esika motuka ezali mpo na boyangeli ya malamu.
Contrôle d’Accès :
Ba masini ya bikuke mpo na kopesa nzela se na bato oyo babongi, kobongisa mpe kotiya yango.
Ba système ya Vidéoprotection (CCTV)
Kotiya ba kamera mpo na kotala bokengi (vidéosurveillance), kobongisa ba ndako ya kotala bokengi (salles de contrôle), kopesa mayele ya bokengi mpe kobatela (maintenance) bamasini yango.
Bikuke ya masini (Barrières mpe Portails Automatiques)
Bikuke oyo efungwamaka mpe otombolamaka yango moko mpo na mituka, bikuke ya masini mpe bisika ya bokengi mpo na kokota.
Climatisation (Kobongisa mopepe)
Kopesa, kotiya mpe kobatela (maintenance) ba masini ya kopesa mopepe ya malamu (clim).
Tourisme na Mibembo :
Kobongisa mpe kopesa lisungi mpo na mibembo ya bato, ba lingomba to mpe ba kompanyi ya mboka mpe ya bapaya.
Mpo na nini kopona IMAR WORLD?
TALO YA KILIYA (VALEUR CLIENT)
- Mbula koleka 13 ya boyebi (13+ ANS) : Tozali na eksperiansi ya mosala mpe ba tekinisIye oyo bayebi mosala ya mabɔkɔ mpenza.
- Lisungi ntango nionso (24/7) : Tozali wana mpo na bino butu na moyi.
- 100% mpo na Kiliya : Tosalaka mosala na kotalela ndenge esika na yo ezali mpe nionso oyo ozali na mposa na yango.
- Boyebi ya makambo ebele : Toyebi kosala misala ndenge na ndenge ya tekonoloji.
Ndenge mosala esalemaka (Processus d’Installation)
- Kotala esika : Totalaka ndako to esika mpo na koyeba nionso oyo esengeli mpo na bokengi.
- Boyekoli ya tekiniki : Tosalaka plan mpe kopesa ntalo ya mosala mpo na kiliya andima.
- Boyokani : Ntango toyokani na ntalo mpe ndenge ya kofuta, tokobanda mosala.
- Kotiya bamasini (Installation) : Ba tekinisye ya mayele bakotiya bamasini na ndenge ya malamu mpenza.
- Mekola mpe kopesa fungola : Tomekolaka bamasini nionso soki ezali kosala malamu yambo ya kopesa kiliya fungola mpe kopesa ye formasyo.
Boyokani mpo na kobatela mpe kopesa lisungi (Engagement de Maintenance et Support)
MISALA YA NSIMA YA KOTEKISA (SERVICE APRÈS-VENTE)
Kobongisa mpe kopesa lisungi (Maintenance & Support)
IMAR WORLD emipesi mpo na koumisa bamasini na bino ntango molai:
- Kotala bamasini mbala na mbala : Mpo na kopekisa ete ebeba té.
- Kobongisa noki : Soki eloko ebebi, ekip na biso ekoya noki mpo na kobongisa to kobongola biloko oyo esili makasi.
- Lisungi ya dharura (Emergency) : Tozali wana soki likambo ya mbalakaka esalami mpo mosala na bino ekatama té.
Elaka na biso na Contacts
ELAKA NA BISO
Tozali pene mpo na kopesa bino lisungi na nionso oyo bozali kotiya. Tosepeli mpenza mpo na liponi na bino epai ya IMAR WORLD. Tozali awa mpo na kobatela bandako na bino mpe kosala ete bamasini na bino ezala makasi ntango nionso.
Na bosembo nionso,
Mpo na kozwa biso:
- TÉLÉPHONE : +250 737 149 888
- E-MAIL : info@imarworld.com
- SITE WEB : www.imarworld.com
- ADRESSE : Kigali Town, TCB House, F4A & F5B
IMAR WORLD LTD | Kobatela bato na lisungi ya kielektroniki
